Likindo Mpo ya bokolisi nzebi o mambi ma bokomi mpe ... bwa baimboka na etumba na bokono bwa SIDA...
Transcript of Likindo Mpo ya bokolisi nzebi o mambi ma bokomi mpe ... bwa baimboka na etumba na bokono bwa SIDA...
© G
ulda
ElM
agam
bo
LikindoMpo ya bokolisi nzebi o mambi ma bokomi mpe bopanzi sango, bokokani
kati ya mwasi na mobali ona bai mangomba ma bai-mboka mpe ba-radio ya baimboka o etuka ya Katanga, o ekolo Kongo Demokratiki
lubumbashi, mwa 4 kino mwa 8 sanza ya motoba mobu 2007
Lyoko likindo likolo lya mateya ma « Bokolisi nzebi o mambi ma
kopanzasangompebokokanibwamwasinamobalionabaimangomba
mpe ladio ya baimboka » lisalemaki o engumba Lubumbashi, o etuka
ya Katanga, o ekolo Kongo Demokratiki, uto mwa 4 kino mwa 8, sanza
ya motoba, mobu 2007.
Likindo lina lilengelemaki na libandisi lya lisanga lya basi (refed) ya
etuka ya Katanga, mpe lizwaki masungi ma dimitra/fao, Fondation
Roi Baudouin, Bobembani bwa ekolo Canada, gtz etali bokolongonu
bwa nzoto, Bobembani bwa Misala mya ekolo Belgika (ctb), mpe
mangomba ma molongo matali lobiko la bato (unfpa) mpe Ntombwa
(pnud) bakisa mpe conafed, lisanga linene liye lisangisi mangomba
ma basi ya ekolo ya Kongo Demokratiki.
Buku eye ekomami na lisalisi mpe lisungi ya Bobembani bwa ekolo
canada mpe Fondation Roi Baudouin.
Le Projet Dimitra bénéficie du soutien financier du Service Public Fédéral des Affaires Etrangères, Commerce Extérieur et Coopération au Développement (DGCD) Belgique et de la
Fondation Roi Baudouin.
lingala
© G
ulda
ElM
agam
bo
© D
imit
ra
© G
ulda
ElM
agam
bo
© D
imit
ra
��
fMolongo mwa masolo na bokuse
Ebandeli [ 2 ]
Etuka ya Katanga [ 3 ]
Ntina ya likindo to mpe likita ezali nini? [ 4 ]
Bailikindo to mpe bailikita [ 5 ]
Bofungwami [ 6 ]
Lilako lya yambo [ 11 ]
Bozwi mabele: litomba lya botimoli makele to mpe mabanga ma ntalo mpo ya baimboka mpe molongo mwa mangomba ma baimboka
Lilako ya ibale [ 23 ]
Bolimboli mobeko mozali kobunda na likambo lya botamboli na mwasi na makasi na nzela ya nzoto mpe kobunda na likambo lya bozangi bopesi etumbu
Lilako lya isato [ 27 ]
Bomikotisi bwa baimboka na etumba na bokono bwa SIDA
Lilako lya inei [ 33 ]
Bokokani bwa mwasi na mobali mpe bosololi mpo na botomboli mpe bopesi sango elamu
Maloba ma bosukisi mpe ma ntina ma likindo [ 47 ]
Nzela ya bokutani [ 48 ]l
� ��
Ebandeli
Lyoko likindo likolo lya mateya ma «Bokolisi nzebi o mambi ma kopanza sango mpe bokokani bwa mwasi na mobali ona bai mangomba mpe ladio ya baimboka » lisalemaki o engumba Lubumbashi, o etuka ya Katanga, o ekolo Kongo Demokra-tiki, uto mwa 4 kino mwa 8, sanza ya motoba, mobu 2007.
Likindo lina lilengelemaki na libandisi lya lisanga lya basi (REFED) ya etuka ya Katanga, mpe lizwaki masungi ma DIMITRA/FAO, Fondation Roi Baudouin, Bobembani bwa ekolo Canada (Coopération canadienne), GTZ etali bokolongonu bwa nzoto (GTZ-Santé), Bobembani bwa Misala mya ekolo Belgika (CTB, Coopéra-tion technique belge), mpe mangomba ma molongo matali lobiko la bato (UNFPA) mpe Ntombwa (PNUD) bakisa mpe CONAFED, lisanga linene liye lisangisi man-gomba ma basi ya ekolo ya Kongo Demokratiki.
l
© G
ulda
El M
agam
bo
� ��
Etuka ya Katanga
Na bokuse, Katanga ezali etuka enene, ekabwani na kabila tuku itano, mabele ma yango matonda na nkita mpe makele to mpe mabanga ma ntalo maike. Kasi baimboka bazali kobikela na bobola mpe bapazani maboke maboke, ndako mpe nzela ibeba.
O Katanga, lobiko la baimboka, mingi penza ya basi, lozali la mpasi ekasi. Basi bazali kobika na bokonzami bwa babali mpe na mpasi: bazali te kozwa mbano ikoki na misala mya bango. Bakisa lisusu kozanga koyeba sango ya ekolo, bozangi bwa mapitalo, mino mpe bilei bilamu bizali kobakutola lobiko lolamu. Esengeli kotya miso na bokengi bonso o etuka ena mpo ya kotombola yango malamu mpe na eleko elai.
Boyikanyi bwa kopani ya kotimola makele bosali ‘te bai mboka bazanga zamba mpo ya bilanga. Mabele ibeba mpe bilei bikutwa. Ekela ena ekolisi misala mya basi mpe lotomo la bango, lisusu mpe ekutoli motango mwa baloni bilanga. Se na ntina mei, bamama na bana baike bakomi kobele, bakisa mpe boyikanyi bwa bokono bwa SIDA.
© O
CH
A D
RC
� ��
Ntina ya likindo to mpe likita ezali nini?
Ntina ya likindo lina ezalaki kokolisa nzebi o mambi ma kopesa sango mpe kosolola likolo lya bokokani kati ya mwasi na mobali ona bai mangomba ma baimboka mpe ladio ya baimboka. Mateya mango maponamaki na bai REFED- Katanga, mpo ya koyanola na mituna miye:
Boniboni kosalisa masanga ma baimboka mpo te itelema malamu? Boniboni kolakisa baimboka mobeko mopekisi konyokolo mpe kokamata basi na makasi mpe kosukisa ekela ya kozanga kopesa bitumbu? Boniboni kokotisa baimboka na etumba na bokono bwa SIDA? Boniboni kotelemisa lisanga linene lya mangomba mpe kokolisa bokasi bwa ladio ya baimboka, eye ezali ekela ya motuya mpo ya kopanza sango o etuka ezipana lokola etuka ya Katanga?
Mambi mana malimbolamaki mpe mapesamaki na bai bwanya mpe bato basalaka misala mina, mpe bailikindo bamanyolaki mango tango basanganaki maboke maboke. Liboke lyoko lyoko likomaki mikano miye mityamaki minso na mokanda moko o suka ya likindo.
Buku eye ezongeli mpe ekomi makanisi ma ntina sima ya bolimboli, bomanyoli mpe mikano mya bailikita mpo ya kolakisa na bato baike mambi bayekolaki.
••
••
© D
imit
ra
� ��
Bailikindo to mpe bailikita
Ezalaki o bokutani bona, basi mpe babali pene na kama yoko bautaki na etuka mobimba ya Katanga: Kolwezi, Kalemie, Pweto, Malemba Nkulu, Kasenga, Divuma, Tshamba, Manono, Kamina, Bukavu, Dilolo, Mutshatsha, Kapanga, Kapulula, Kipushi, Kabondo Dianda, Kabongo mpe Sandoa.
Baike o ntei ya bailikita bazalaki bapanzi sango ba ladio ya baimboka mpe bantoma ba mangomba ma baimboka.
Boko batamboli mikolo zomi (10) mpo ya kokoma o esika ya likita, o Centre Emmaüs ya Lubumbashi. Babongisaki esika mpo ya koyamba mpe kovandisa basi baye batambolaki na bana bake, zambi ya kobalingisa ‘te balanda mateya mpe bakabola makanisi na bolembu.
© D
imit
ra
�
f
Bofungwami Maloba ma ebandela
Kalaka wa CONAFED, Comité National Femme et Développement
« Mpo ya nini kopesa sango? Ezali mpo ya kolingisa na basi ba mboka ‘te bayeba mikakatano mpe kpokoso ya bango, bakabolana mpasi na bisengo mpe mpo ‘te bakoka kokutana na baye bakoki kosilisa mikakatano mya bango. Ezali mpe libaku linzenga mpo ya basi basusu koyeba nzebi ya baninga mpo ya bolamu bwa ekolo mpe molongo mobimba. »
© D
imit
raElise Muhimuzi
�
f
Litomba lya bopesi mpe bokaboli makanisi mpe botelemisi lisanga linene lya mangomba
Moyangeli wa Linaka Dimitra (FAO)
« Dimitra ezali linaka lya kopesa sango mpe kosolola liye lisalaka elongo na mangomba ma bana mboka mpo ya kokolisa makoki ma baimboka, mingi mingi ya basi, na bolakisaka polele misala mya bango mpe mpo ya kobongisa lobiko mpe lolenge la bango. »
« Lisanga linene lya mangomba lizali kosangisa baimboka, likobalingisa bokaboli mikakatano mpe biyano, sango, mpe nzebi; mingi penza o ntei ya etuka eye nzela ibeba ilingisaka te ‘te baimboka bakutana na basusu. »
�
© D
imit
ra
© D
imit
ra
Eliane Najros
� ��
f
Bofungwami
Ntoma wa lingomba lya molongo mpo ya bilei mpe bilanga (FAO) o Kongo Demokratiki
Akamataki maloba mpo na boyebisi boye: « FAO tango inso esalaka keba na makambo matali bomoto mpe bomoi bwa basi mpe lotomo lwa bango mpo ya kokolisa bilei mpe mosala mwa bilanga. »
Mpo na ye, « likita liye lisalemi o tango ekoki mpe lizali libaku lilamu, zambi ekosalisa mpo ya kokolisa nzebi ya baimboka mpe basali o ba ladio mpo ‘te basalela sango mpe masolo makotombola ezaleli ya baimboka mpe mpo te bakolisa bilei, manso na botosaka bokokani kati ya basi na babali. »
« Mokambi wa FAO abakisi ‘te kopesa sango ezali ekela ya ngambo ibale. Yango ezali kopesana makanisi, se moto moko alobaka te, na yango bailikita banso bazali na
likoki lya kokamata maloba. »
© D
imit
ra Gana Diagne
� ��
f
Maloba ma bakonzi mpe ma bantoma ba leta
Mwana mboka
Ministre wa ntombwa ya mboka
« Nakolikya ‘te likindo liye lipesi nzela na bokolisi lisanga kati ya baimboka, botomboli boyokani, bofungoli nzela ya bokutani mpe ya bosololi kati na baimboka, bakonzi mpe bantoma ba bango o nzela ya bapanzi sango, mingi penza ba ladio ya baimboka o etuka ya Katanga. Nakokundola mpe litomba lya basi bo batomboli mambi ma bilanga. Nzoka nde lotomo lwa bango londimami te. Ezala mpe litomba lya bango lokola batambwisi misala mya nkita, politiki mpe ezaleli ya bato o ekolo. »
O sima ya nzanga, Ministre azongaki lisusu mpo ya kokabola makanisi tango elai na basi sambo mpe babali batano bantoma ba baimboka.
l
© D
imit
ra
© D
imit
ra
Charles Mwando Nsimba
���0
Lisano
Molulu mwa bosukusi likindo mosukaki na lisano lya lisanga lya balinga lisano ya eteyelo Nzembela. Yango ezongelaki mpe elobelaki malako manso ma likindo, na bolakisaka polele mimesano mibe mya bokoko mpe mbeba ya yango.
l
© D
imit
ra
��
f
��
Lilako lya yambo
Lilako lya yambo – Bozwi mabele: litomba lya botimoli makele to mpe mabanga ma ntalo mpo ya baimboka mpe molongo mwa mangomba ma baimboka
O Katanga, kpokoso ya kozwa mabele ma bilanga euti na bolembu bwa mobeko mwa kotimola makele moye mozali na mbano eke mpo ya baimboka: potopoto mpe mbilingambilinga na botimoli mabanga ma ntalo, kobuka makoki ma baimboka, bozangi mabele mpo ya bilanga, bobebi bwa zamba na bikelamu mpe bokutwi bwa mboto… Boike bwa kopani ya makele bokutoli zamba mpe milona.
Epai yoko ezali bozangi bolimboli mpe bolembu bwa kolakisa mibeko mya sikisiki (mitali makele, mabele mpe zamba), epai esusu baimboka bazwaka likoki lya kopesaka makanisi te o mibeko mina: bazali penza kotala matomba ma baimboka te, mpe makoki ma bango mazali kobukama. Mbeba nzike, ndakisa kolongola mboka mobimba o bisika bizalaki mpo nakotonga kopani ya makele, bokamati se bapaya o mosala, bobebi bwa mopepe, mabele maike makonzami na ba kopani mpe mozanga mwa zamba momemi mpe mozanga mwa bilei. Bakisa lisusu te basi baike bakonzaka lolenge la boyangeli bwa bilei te.
�� ��
f
f
Bozwi mabele mpe litomba lya bokolisi bilei o etuka etonda na makele: Katanga. Mikakatano mya basi ba mboka
Nganga mayele wa bokokani bwa mwasi na mobali o ekolo Canada (Coopération canadienne)
Lolenge la kokozama ya babali likolo la basi esali te basi bazanga mabele mpe likoki lya kokengele biloko na mpe lifuta ya yango. Basi bazali kolona na mabele ma bango te, bisaleli bya mosala mpe biloko bibimi o bilanga, binso bizali bya mobali mpe bya etuluka. Bazali na likoki ata lyoko te ya koloba mpe kopesa esimbisi mpo na maye matali biloko. Bazali lokola bato ba mosala oyo bazali kofutama te. Lokola bazangi sango mpe mateya mpe lisus lokola bazali kosalela bongo bisaleli bya mosala bya kala, basi bakoki ata moke te kokolisa mosala mwa bango mpe bobimisi biloko ebele.
Ezalela ya basi ba mboka o etuka ya Katanga ezali kosenge politiki ya sika o mabi ma bilanga mpe ma makele na mpe politiki ya bobateli bwa lobiko, bomoto mpe bwa botomboli makoki ma bato. Litomba lizali linene soki bakotombola mosala mwa ba ladio ya mboka mpo te basi bayoka sango ya mboka mpe sango isusu iye izali koleka o bisika bisusu, bazwa mpe nzebi iye ikosalisa bango te
bayeba mpasi mpe makama ma mosala mwa botimoli mabanga to makele mpe makoki ma bango o mibeko.
© D
imit
ra
Gul
da E
l Mag
ambo
Marie-Antoinette Saya
�� ��
f
Lilako lya yambo
Litomba lya botimoli makele mpo na baimboka na bisaleli binene bya kopani mpe bya mboka
Lingomba Groupe ONE oyo etali boluki mpe misala mpo na botomboli mboka na elaka elai mpe mpo na botomboli nkita ya mboka
Likambo lyoko lya ntina mpo na botomboli mboka seko ezali ya kosangisa mabi ma boloni na politiki yoko elamu etali bomoi bwa baimboka mpe lolenge lolamu ya kokamba mboka.
Botimoli makele na lolenge ya bisaleli binene to mpe masini
O eleko ya Gécamines, kopani enene eye ezalaki kotimola makele o Katanga, basali bazalaki kosalisa nzoto ya bango soki babeli ntango na lifuta, bana ba bango bazalaki kokoto kelasi ofele, bazalaki mpe kozwa mayi, motiliki mpe biloko bya kolia. Kasi sika, ba kopani ya mabanga ma ntalo to mpe makele izwami, izali kosala bongo te, mambi matali bomoi bwa baimboka izali malamu te. Tala ndambo ya ndakisa:
Bikela bitali lobiko, lolenge ya bato mpe bomoi bwa baimboka bizali kotala mpenza te mposa mpe bozangi bwa bato o mboka te zambi lya bozangi bwa lolenge lolamu la bosali mosala mwa bango.Bobembani kati na ba kopani ya makele mpe masanga maye mazali kosala misala mpo na botomboli bomoi bwa bato o mboka to mpe ba ONG ezali malamu te.Makambo ma ntina maye ba kopani ikoki kosala mpo na bolamu bwa bato ndenge ikomami na buku ya mobeko ya makele izali kotosama te.Na eleko ya bosali misala mpe ya botali lolenge ya bobongisi bomoi bwa baimboka, ba kopani ina isanganaka te na ba ONG ya mboka mpe italaka misala mya bango te.
•
•
•
•
© D
imit
ra
Dolet Nyembo
�� ��
Botimoli makele na bisaleli bya mboka
Soki ya solo ndenge ezali kolobama ete botimoli makele na lolenge la mboka, tango na bosalele masini esungi baimboka mpe esilisi bobola na bopesaka bongo misala, tosengeli koyeba ete bizalela mpe lolenge ya kosala mosala bizali bya mpasi mingi mpe makama mingi mpo na bokolongonu bwa nzoto bwa basali, mingi penza mpo na basi mpe bana bake baye batamboli na ba mama ba bango. Ata ko kopani ya makele isalisi na bokeli misala, kasi likambo litali evandeli ya bato mpe bomoi bwa bango ebongi naino malamu te.
Bozwi sango ezali na litomba linene po na kotelemisa politiki elamu etali bomoi bwa bato. Boyoki sango mpe malako, ekolingisa na bato te bayeba makoki ma bango mpe mibeko mya mboka mpe bazwi likoki tya kotosa yango. Kozanga kozwa sango, kozanga kosolola mpe kozanga koyeba ezali mpasi mingi mpo na kovanda esika yoko mpe koyokana mpo na bobongisi mambi ma mboka mpe maye matali baimboka. Boyebi, ekosalisa te bato banso bazala esika yoko na masolo ntango na bokeseni. Mambi ma bopanzi sango izali ilamu mpo na mosala monene mwa botomboli bomoi mpe lobiko ya bato.
© G
ulda
El M
agam
bo
�� ��
f
Lilako lya yambo
Mosala mosalemi o kati ya kopani Anvil Mining, kopani enene ya makele mpo na bomoi mpe lobiko ya bato
Dikitele ya mambi ma botomboli bomoi mpe lobiko ya bato, azali lisus na mosala mwa bopanzi sango o kati ya kopani Anvil Mining
Bokokani kati ya mwasi na mobali ekomami na kati ya myango ya kotamwisa kopani Anvil Mining. Kasi na bikela na maye matali botomboli bwa lobiko mpe bomoi bwa baimboka ezali kosalema penza te. O kati ya kopani, mwasi azali na esika penza te o mosala, elembo yoko likolo na mokama. Ebongi malamu te Kopani Anvil Mining etelimisa politiki elamu mpo na
botomboli bomoi mpe lobiko la mwasi mpe mosala mwa ye o kati ya kopani. Mwasi, azali na eyokeli elamu ya mambi ma mboka, ayebi mpe kosalela mosolo mwa libota malamu, asimbi mambi ma boniango malamu mpe lisusu akofutaka nyongo malamu koleka mobali soki adefi eloko to mosolo.
Litomba litali bomoi mpe lobiko la bato o kati ya kopani Anvil Mining o mikolo miye:
Masanga ma botomboli mboka ntuku inei na itano itiami o kati ya kopaniBiteyelo motoba bitongamiZando ibale etongami mpe baimboka bazali kosalela yangoMasanga manene koleka zomi ma bobombi mpe bodefisi mosolo isalemiBaimboka koto ibale bazwaki bisaleli bya mosala mpe mboto, na kati okokuta basi ntuku isato likolo na mokamaLinaka lyoko ya bomemi mai peto o eteni ya mboka Pweto lisalemi
Na bolandaka bongo mobeko mwa sika motali makele, ba kopani isengeli kotia eteni ya zomi ya matabisi ma bango likolo na mokama mpo na botomboli bomoi mpe lobiko ya baimboka. Kasi, na mobeko mona, kopani elimboli malamu penza
•••••
•
© D
imit
ra
David Kayombo
�6 ��
te eloko nini babengi botomboli nkita ya mboka mpe mbilingambilinga ezali kati na mabongisi ma leta.
Esengeli konyata boye, bomoi mpe boumeli bwa bisika bakotimolaka makele ezali pene na mibu motoba pamba, na sima ya mosala mwa
makele, esengeli koyeba, mpe komanyola nini ekosalema soki mosala mona mwa makele mosili. Na nzela ena, mangomba ma mboka to mpe ba
ONG iyokana malamu kati na bango mpo na botelemisi manaka kitoko ya botomboli mboka mpe kopani ibongisa misala mya bango
mpo na bobateli bisika bato bazwami na ntina te mopepe mobemba te.
Bobembani boko bozali kosalema kati na kopani Anvil mpe PACT-CONGO (ONG ya
ekolo ya amelika oyo ezali kozwa mosolo na ngambo ya USAID) mpo na kosalisa mambi ma botomboli mangomba ma baimboka.
© T
etsh
im
�6 ��
f
Lilako lya yambo
Botelemisi bwa masanga ma baimboka
Dikitele mokonzi wa Prefed (Programme Régional d’Echange et de Formation pour le Développement)
Ezali na lolenge loko te mpo na botelemisi lisanga lya baimboka. Molendisi to mpe motambwisi azali na likoki ata moko te ya kotelemisa lisanga na lolenge la ye to mpe na makasi, kasi akosalisa baimboka te batelemisa lisanga engebene na mposa mpe maluli ma bango. Na maye matali mosolo, esengeli ete polele ezala na ba opeatio inso ikosalema mpe maboke
maboke ya mangomba ya baimboka izala na bokengi likolo na yango. Lolenge la masolo o kati ya baimboka esalema mpo na boti mpe bokolisi bolikii kati ya bailingomba. Likanisi lizali te bailingomba babimisa mosolo lolenge loko mpo te bazala bango banso o nivo’ yoko.
Baye basibi lingomba basengeli kosala te bailisanga batia maboko na botambwisi yango: bopesi maloba na bato banso na bobandeka na baye bazali batau, bayebi kozwa maloba malamu te mpe batombwami te o mboka to mpe baye bazali na lokumu te, ndakisa basi mpe bilenge, mpe kosukisa na baye bazali na pifo, elobeli ya bango endimami na bato banso, bakoyoka mpe bakosalela, kopesa mpe maloba ona bakolo ba mboka mpe babange. Bango mpe bakobakisa makambo malobamaki na bato ba liboso o masolo ma bango.
Mangomba ma baimboka iye izwami penepene, isengeli kobongisa makoki ma bosololi mpe ma boyokani na ntina ya bokutani ntango na ntango mpo na bosololi makambo matali biteni bya mboka bya bango. Bolendisi bwa nzebi, makoki mpe mabongi ma mangomba ma baimboka ezali likambo lya ntina penza mpo na mikolo mikoya.
l
© D
imit
ra
Sylvestre Kambaza
�� ��
f
Lisalisi lya mbangu mpe bobongisi mambi ma bilanga o ekolo Kongo Demokratiki
Mokambi nganga mosala o Division ya mambi matali lisalisi lya mbangu mpe bobongisi na FAO o ekolo Kongo
Likambo ntina lizali botomboli makoki ma baim-boka mpo te bakoka kopikama, kobikela soki makama manene ma molongo to maye makelami na bato mayei. Nzela ezali ya kobikisa, kotonga, kobatela, kobongisa ndenge ya kobikela na maye
matali bilanga mpo na bosilisi bolembu, bozangi bokolisi mpe bobimisi biloko bya bolei ebele na ntangoa ya kozilaka lisalisi to mpe lisungi litali biloko bolei.
Baye basengeli kozwa lisungi lina ezali basi mpe babali bakobikaka se na mosala mwa bilanga, balobi mbisi o mboka, bato bakima bitumba mpe batika mboka ya bango, bana babeli bokono bwa nzala, basoda ba kala-kala, mabota maye makam-bami na basi to mpe bana, mabota bazwi bokono bwa sida, mpe bongo na bongo.
Makonzi ma ntina mpo na botondisi biloko bya bolei:
1. Bobateli bomoiKobongisa ndenge ya bokengeli, kozwa likambo ya lolenge la biloko mpe bilei na maboko mpe kolandela yango na kati ya mboka mpe ya ba ndako etongami na ntina na wana Kosalisa bato baye bazali na makoki te
misala: bosalisi bwa masanga ma bokengeli, bokaboli bilei mpe bisaleli bya mosala na mboto, boluki mayele mpe bwanya mpe bokengeli lolenge ya bilei.
2. Bokutoli bwa bozangi mpe mpasi:Kolendisa misala mitali bomoi mpe lobiko ya bato bazangi na botombolaka bongo mambi mpe lolenge te bilei bizanga teKopesa na baimboka bisaleli bya mosala biye bikolingisa na bango te bimisa biloko ebele mpe bazwa bya kolia o mabota
•
•
•
•
l
© F
AO
-RD
C
Michel Ngongo
�� ��
Lilako lya yambo
Kobimisa lolenge ebele, Kobongisa mpe kokolisa lolenge ya kolona mpe ya kobokola bibwele Kobongisa bozwi bisika bya boloniKobunda na makono mazwaka milona mpe mbotoKoloba makasi mpe epai ya bakonzi likambo lya bo-pesi mabele na bato bazangi makoki
misala: Bokaboli bisaleli bya mosala mpe bilei, bopesi ma-teya, bosalisi bato batau mpe bazangi, bobongisi ba nzela ya mboka, bopesi bilei bilamu na mboka.
3. Kolendisa lolenge la kotambola: Kokanisa mpe kolengele na botalaka maye makomami o nzela ya politiki ya ekolo mpo na kobongisa bomoi bwa bato mpe lolenge bazali kobikelaKosalisa bisika mpe manaka ma koyikina mboto mpe mitémbé milamuKosala misala mya kobongola mpe mya kobomba biloko bya boleiKokolisa lolenge ya kotelemisa misala mya etuka mitali mosala mwa bilangaKobongisa bisika bya nséKotombola mosala mwa kobokolo bibwele mpe mbisiKobongisa nzila inene mpe nzila ike-ike ya bilangaKobimisa ndenge nzike mpe kokolisa ntoki, mayele mpe mambi matali bilanga to mpe bobokoli bibwele
misala: kopesa maboko na mangomba ma bimboka, kolakisa mpe kobongisa nzila ike-ike ya bilanga, kokolisa nzebi ya misala mya mboka, kobongia to mpe kokolisa bisika bakolengeleke mboto ya biloko bakolona, kozongisa mpe koyamba o kati ya mboka basoda babunaki bitumba mpe batika na balingami nabango.
•
•••
•
•
•
•
••••
© F
AO
-RD
C©
FA
O-R
DC
© F
AO
-RD
C
�0 ��
f
Lilako lya yambo – Bozwi mabele: litomba lya botimoli makele to mpe mabanga ma ntalo mpo ya baimboka mpe molongo mwa mangomba ma baimboka
Bitinda/Mikano
Na ngambo ya bailikita mpe baimboka:
Kosalisa masolo makopanza sango mpe mateya: makoki mpe masengeli ma bato, mibeko mitali makele, mabele mpe mya zamba.Kokotisa siki-siki likambo litali bokokani bwa mwasi na mobali: bokokani, kobunda mpo na kolongola bizalela bibe bya bonkoko, mingi penza maye mazali kozwa mwasi lokola moumbu.Kokolisa makoki ma mangomba ma baimboka mpe ma mboka: lolenge ya kotambwisa mango, bolimboli mpe bolakisi polele bisaleli bya mosala mpe lolenge la kokamba masanga mana, kolimbola mambi malobani o likindo o ba mboka na nkota ya mboka.
Epai ya masanga ma baimboka:
Kosala penza mosala makasi na ngambo ya bakonzi: kosambela matomba ma bato, kolobela mpo na masengeli ma bango.Kokolisa nzebi ya bapanzi sango: mateya mpe ndenge ya boyekoli mosala, kokolisa mosala mwa bango mpo te ba ladio ya mboka iyokana bisika binso, kobimisa mpe lokasa ya kopesa sango.Kosala te maye malobamaki o likindo ibota mbuma ilamu: kotelemisa esika ya masolo mpo ya kolobela na bakonzi mpe baye basimbi mboka mikakatono mya baimboka, kokundola mpe kotala nzela ya mibeko mpo na bokotisi o kati maye matali matomba ma baimboka.
•
•
•
•
•
•
�0 ��
Lilako lya yambo
Na ngambo ya misala mya kopani ya makele:
Botosi mibeko mya ekolo: kozwa bana mboka o mosala, kolakisa bango mosala mpe kobatela evandeli ya baimboka na kotosaka bongo politiki ekobatela zamba na bibwele, nzete izwami o kati, kozwa mpe mikano mya bokolongonu bwa nzoto mpe bobateli bomoi mpe lobiko ya basali mpe mabota ma bango.Bobongisi bondeko kati na kopani ina mpe baimboka: Kokolisa bosololi, kopesa na misala mya bopanzi sango sango elongobani mpe na polele penza ntango ya kobomba boko makambo, kozongela mabele maye kopani isalela mpe itika mpo baimboka batonga na ndako.Kotikela manaka ya misala mitali bomoi bwa baimboka na masanga ma bango mei to mpe na ba ONG, na kopani to misala mya bana mboka mpe mangomba ma basi.
O epai ya bakambi ba mboka:
Bokundoli mpe bobongisi mambi mya mibeko ya ba zuzi: mibeko mitali mabele, zamba mpe makele, lolenge ya kopesa mbano to mpe lifuta na bato soki kopani ibebisi esika ya bango ya kovanda.Kosala te mibeko mwa leta mitiama na bikela mpe mitosama na banso.Kobongisa lolenge la bosololi o ngambo ya leta mpo na maye matali kopesa sango mpe kosolola o mboka: kolingisa na ba ladio ya mboka te isala misala mya bango ntango na kofuta pako ya leta, kolakisa polele politiki ya ekolo o mabi ma bopesi sango mpe ya bosololi o kati ya mboka.
Epai ya bapesi mosolo:
Kokolisa lisalise o maye matali bosololi mpe bopanzi sango: kopesa mateya na bapanzi sango mpo na bokolisi nzebi ya bango, na bolakisi lolenge ya kokamba ba ladio ya mboka, kobongisa mpe kotelemisa masanga ma basi.Kokolisa nzebi, makoki mpe lisungi mpo na mangomba ma baimboka na nzela ya masanga makasi.Kopesa mpe makanisi o masolo ma bolakisi kpokoso ya baimboka mpe kosenge te mbongwana ekoto mpo na botali makoki ma bango mpe bobongisi mambi ma leta o ngambo ya ba zuzi.
•
•
•
•
••
•
•
•
�� ��
© T
etsh
im
�� ��
fLilako ya ibale – Bolimboli mobeko mozali kobunda na likambo lya botamboli na mwasi na makasi na nzela ya nzoto mpe kobunda na likambo lya bozangi bopesi etumbu
Makambo ma ntina mamononi:
Bozangi boyebi mpe bolembu o bosalei mibeko mya leta miye mizali kopekisa mpe koboya likambo lya bonyokoli mwasi mpe elenge mwa-si: bozangi bolimboli, bozangi koyeba mobeko, bozangi bopesi etum-bu, kpokoso na lolenge ya kongangisa bato babuki mibeko, bozangi bwa bisika bya koyamba basi banyokwami, mobulu o botosi mibeko.Bozito bwa mimeseno mpe makambo mabe ma bonkoko: kobalisa na makasi, nkisi, boyambi makambo ma lokuta, bobangi bobimisi polele soki basi banyokwami mpe mpasi bayoki mpe bamoni. Yango nde esali te basi bana batiolama mpe baboya bango o mboka, bozangi bomipesi ya baimboka o etumba mpo na minyoko mya basi.Bozangi bwa mosala mwa solo-solo ya lisanga na ngambo ya bato basangani o mosala;Mpasi mpe kpokoso mpe bobembi bwa mambi matali bomoi mpe lobiko ya bato mpe bozangi bwa nkita.
•
•
•
•
��
f
��
Mosala mosalemi o lisanga mpo na kobunda na mambi matali bokamati mwasi na makasi mpe bozangi bwa bopesi etumbu o Kongo Demokratiki
wa UNFPA-Katanga (Fonds des Nations Unies pour la Population)
Boluki mwasi na makasi ezali se likambo litali bomoi bwa bato to mpe ya bokolongonu bwa nzoto te, kasi ezali ya solo mpenza likambo lya bozangi botosi o makoki ma bato o kati ya mokili, mingi mpenza likoki lya bokolongonu bwa nzoto, bwa bomoi bwa nzoto, bwa motema mpe bomoi mobimba. Mobeko moko mobimaki na sanza ya sambo 2006, moyebisaki polele te likambo lina lizali mabe mpe liboyaki bizalela bibe bina, kasi mpo na boko makambo, mo-beko mona molimbolami mpenza te mpe motiami o bikela te.
Liboso ya mobu 2004, mosala mosalemaki makasi mpo na bobundi na likambo lya boluki mwasi na makasi, kasi mosala mona molongaki te, zambi bokabwani bozalaki kati na mosala mpe bozangi bwa bakambi na lisungi lya solo. Likanisi lyoko linzenga litiamaki mpe lindimamaki na ngambo ya leta, ya ONU, ya ba ONG mpo na bozwi eyano elamu na etumba ena etali likambo lya boluki mwasi na makasi mpe bozangi bwa kotosa mobeko o ekolo Kongo. Ndenge ebele ya masalisi epesamaki: na ngambo ya bokolongonu bwa nzoto, mambi ma bokati makambo na bosembo, nkita, bomoi mpe lobiko ya bato o maye matali nzoto mpe motema, bobatelami bwa bato.
Kosala nini?Baimboka basengeli kozwa o mitema likambo lya koboya boluki mwasi na makasi mpe lya bozangi bwa bokangi bato basali mabe awa batosi mobeko te. Bayeba te likambo lyango lizali libe. Bakonzi batala likambo yango ya bokebi mpe bamonisa lolenge nini bakosala mo-sala mpo na boluki kozwa biyano bikoki.Kobimisa, kolimbola mpe kotia o bikela mibeko misusu mya sika mitali likambo lya bokamati mwasi na makasi.Kokolisa nzebi mpe makoki ma mangomba matali lolenge la botambwisi bosembo o mboka na bopesaka na bango bisaleli bilamu, buku, mateya mpe kolakisa mosala na basali.Kosalisa o libanda, polele lolenge ya kosambisa bato babuki mobeko, kotelemisa bisika ba avoka mpe bazuzi bakoyoka maleli ma bato mpo na kolingisa bato banyo-kwami bamibima epai ya zuzi.
•
•
•
•
•
© D
imit
ra
Abety Bilanda
��
f
Lilako ya ibale
Lilako ya ibale – Bolimboli mobeko mozali kobunda na likambo lya botamboli na mwasi na makasi na nzela ya nzoto mpe kobunda na likambo lya bozangi bopesi etumbu
Bitinda/Mikano
Mpo ya bailikita:
Bozongisi to mpe bolimboli na baimboka mpe boti o bikela mambi ma likindo.
Ona mangomba ma baimboka:
Kotelemisa masanga ma bobundi na likambo lya boluki mwasi na makasi: kobimisa po-lele bato basali bikela bina bibe, kopekisa mpe koboya boyokani na mboka mpo ya baye babuki mibeko mpe kobimisa bango epai ya ba zuzi.Kosalisa baye banyokwami o nzela ya nzoto ntango na koboya bango, kosala ete bana babotami na nzela ya bikela bina bandimama na mboka.Kobunda etumba ya kolobela na ngambo ya leta na botiaka bongo ba bulo ya parquet ike na mboka, bapanzi sango mpe basala mosala mwa bango: koyebisa mpe kolimbola maye leta azali kosenge, kolakisa na baimboka mpe kolimbola polele na nzela ya ba ladio ndenge bazuzi bazali kosambisa, kokata mpe kokweisa na likambo baye babuki mobeko.
O ngambo ya misala mya leta, mya bana mboka mpe mya bapesi mosolo:
Bosali te misala mya leta mizwa likambo lya boluki mwasi na makasi o maboko: boti bongo o mboka ba bulo ya bokati makambo.Bokotisi misala mya bopanzi sango: boyebisi mpe bolimboli bwa mibeko mya sika, bosololi mpe bopesi sango lolenge bazali kosambisa bato mpe lolenge bakati likambo.Bobongisi bizalela bya bato o maye matali bomoto mpe nkita.Bokolisi lisungi: bokolisi nzebi ya bato bakosala o bituka, kosala mosala mwa lisanga o mboka, kotelemisa mpe babulo ya kosambisa polele o mboka.
•
•
•
•
•
•
••
�6 ���6�6
© D
imit
ra
�6 ��
fLilako lya isato – Bomikotisi bwa baimboka na etumba na bokono bwa SIDA
Makambo babimisi:
Bozangi bwa misala mya bopanzi sango mpe mya bolimboli mambi matali bokono bwa sida: Kozanga bozwi likambo o motema, biyambayamba mpe bondimi makambo mazangi ntina, mimeseno mibe mya bonkoko, kotiolama ya bato bazwi bokono bwa sida, kozanga koyeba soki ozwi bokono bwa sida to te, bobangi ya bokei na motema mobimba kosalisa ekzame ya monganga mpo nakoyeba soki malali ezali to te.Kpokoso ya politiki ya ekolo mpo na kosolola likambo litali bokono bwa sida.Bolembu bwa mosala mwa lisanga kati na leta, mangomba ma baimboka, ba ONG mpe bapesi mosolo.
•
•
•
��
�� ��
f
��
Bomipesi bwa mangomba ma baimboka na etumba mpo na kolonga bokono bwa sida. Mosala GTZ-eteni ya bokolongonu bwa nzoto o Kongo Demokratiki
GTZ-Santé o Bukavu
Mwa makambo mamononi:Bokono bwa sida bozali kozwa mingi basi mpe o mboka.Botau to mpe bolembu bwa nzoto esalemi na ntina ya makambo ebele, ezali kokutola likoki lya bato mpe ya baimboka mpo ete bamibatela na bokono bwa sida. Botau bwa nzoto ya basi mpe bilenge basi mpe bo-nyokolomi na nzela ya boluki bango na makasi izali kongalisa bokono.
Na yango, GTZ-Eteni ya bokolongonu bwa nzoto atelemisi nzela iye: Kosangisi bato baponomi (basi mpe bilenge) o makita to mpe o bokutani, kosalisa masanga ma mboka, kotelemisa lisanga linene lya mangomba, kofungola mpe masanga mike ya bosololi, boyoki sango mpe bopanzi yango.Kokolisa nzebi na maye matali bokono bwa sida na lolenge bokono bona bope-samaka na boyokaka mpe boyebaka sango o nzela iye (Internet, bopanzi sango, bokaboli mwa mabikeli, bosali lisanga linene ya mangomba ma baimboka).Kolendisa likambo lya kokende lopitalo ntango nakotinda to kosenge na makasi mpo na koyeba soki bokono bozali to te.
Bikela/Misala: Kofungola masanga ma bayoki, bokomi mpe bopanzi sango ya maye mazali koleka, bokutani mpo ya masolo ma mosala, bokaboli maye basusu babikeli, botelemisi masanga make mpo na kobunda na bokono bwa sida, bolimboli na bato mpe boyebisi bango mabe ma mambi ma boluki mwasi na makasi, bolendisi likambo lya koyeba o lopitalo soki bokono bozali to te, bosololi mpe boyebisi na basi bazali na zemi te basengeli kokende o lopitalo lotali bomibateli bwa ye mpe bwa mwana mpo te mwana oyo azali na libumu lya mama abatelema malamu, ntango na bozwi bokono, bopesi lisungi/lisalisi o bisika bapesaka makila ofele mpe bongo na bongo.
•
•
•
•
•
•
��
© D
imit
ra
Aster Bashige
�� ��
f
Lilako lya isato
Kolobela polele maye matali bokono bwa sida. Likoki lya RDC (RDCcompétence)
CTB, Coopération technique belge
RDCcompténece (RDClikoki) ezali kosalela lolenge baimboka bango mei bakolobela polele nini elongi na mosala basali to mpe ebongi te. Esengeli kopesa maloba na baimboka mpo na maye matali bokono mpo te bazwa likambo yango o mitema mpe bamipesa bango mei na bolukaka bongo biyano na mituna mya bango.
Masolo masalemi ntango bato banso ba mboka basangani, ndakisa sima ya misa to mpe liboso ya likita nyonso. Baimboka bakomituna soki bokono bwa sida bozali likama mpo na bango mpe soki bayanoli iyo, bakomituna lisusu baimboka bakosala nini mpo na kobunda na bokono bona. Mituna misusu mya ntina: nani akoki kosalisa ekzame mpo ayeba lolenge nzoto na ye ezali, koyeba soki azali na bokono to te?
Mpo te mokili mozwa likoki lya kobunda na bokono bwa sida, esengeli:
Koyeba siki-siki mpe kozwa o motema te malali ezali likambo ya biso banso, likambo lya ngai mpe lya yo, ezala mpe okati ya bomoi bwa libota, o evandeli na bato basusu o mboka mpe o esika bya mosala.Kosangisa bibundeli nyoso mpo na bomibateli o botau bwa nzoto mpe bokutoli lolenge la bozwi mpasi mpe mabaku makokutana na yango.Kokenge te moto na moto amibatela.Koyeba maye makweli yo mpe kokabola yango na basusu.
•
•
••
© T
etsh
im
Sandrine Ruppol
�0 ��
Esakola ya Jacqueline Naweji Kangaji, REFED Kolwezi
Mama Jacqueline, lifulume, alakisaki bongo o nzela ya bilili mosala lingomba lya ye ezali kosala o engumba Kolwezi na bosalisaka bana baye babwakemi mpe bazali kobikela o ba balabala.
Bato banso basanganaki o likindo basepelaki mingi na bomoni ye mpe mpo na mosala kitoko lisanga lya ye lizali kosala, kasi mingi mpenza mpo na lisalisi lilamu apesaki na bailikita baye babeleki mpe bana ba bango o eleko ya likindo. Ye azali moto ya bomikitisi, lolendo te mpe ntango inso se koseke. Alakisaki bokasi, boyebi mosala mpe bwanya bwa ye ntango inso.
© D
imit
ra
© D
imit
ra
�0 ��
Lilako lya isato
Biteyelo bitongami mpo na bolakisi na bilenge nzebi mpe mambi ma boloni bilanga mpe maye matali bomoi bwa bango
Eteni ya lingomba lya ONU babengi FAO oyo etali makambo mya bolei mpe bilanga etongi biteyelo mpo na bolakisi na bilenge o bikolo ebele ya afrika, mambi ma bilanga mpe ma bomoi mpe lobiko ya bango. Ntina na yango ezali ya bokutoli ntomo ya bokono bwa sida epai ya baimboka mpe lisusu kopesa likoki na bilenge bakufeli baboti te bayeba mosala mwa maboko zambi mokosalisa bango mpo te babikela bango mei, lisusu bana mpe bilenge baye bazangi makoki, na bosalisaka te bakolisa nzebi ya bango.
© F
AO
/ G. B
izza
rri
�� ��
f
Lilako lya isato – Bomikotisi bwa baimboka na etumba na bokono bwa SIDA
Bitinda/Mikano
O ngambo ya bailikita mpe mangomba ma bango:
Kokolisa kosolola mpe kokutana na baimboka: mikolo mya masolo mabokaboli maye basusu babikeli mpe basaleli mpo na kobunda na bokono bwa sida, kobimisa mpe kolakisa ndenge isusu ya kosala mosala.
O epai ya leta:
Kokotisa mpe kobongisa manaka ma mosala mwa bobundi na bokono bwa sida; Kokolisa nzebi, makoki mpe bisaleli bya mosala mwa ba ladio ya mboka mpo na bosololi mpe bopesi sango: Kosalisa masolo ebele o nzela ya alo-alo, kotelemisa masanga ma bayoki, kosalela nkota ya mboka.
•
••
Epai ya bapesi mosolo:
Kolendisa mosala mwa lisanga: Kotala na bokebi boso maluli ma baimboka na maye matali etumbya ya bokono bwa sida, kosangisa bato basusu o mosala, lokola ba ladio ya mboka mpe masanga ma bayoki.
•
© D
imit
ra
�� ��
fLilako lya inei - Bomikotisi bwa baimboka na etumba na bokono bwa SIDA
Kpokoso ibimi:
Bokangemi bwa mboka: mboka isusu izipana mpe iyokanaka te na mboka isusu nzinga-nzinga; Bozangi bwa mosala mwa solo ona ba ladio ya mboka: bozangi ya bi-saleli bya mosala, manaka, sango mpe masolo ilongobani te na mosa mpe maleli ya baimboka, kpokoso o nzela ya bozwi mosolo, bozangi ya bolakisi mosala mpo na bokolisi mayele; Bozangi bomipesi bwa basi na maye matali masolo mpe bosaleli biloko bya mosala;Kotiolama, konyokolomo mpe kokeseme ya basi mpo na mambi ma bonkoko; Bozangi bwa boyokani kati na ba ladio ya mboka.
Masolo ma bokaboli matalaki likambo lya botelemisi lisanga linene ya ba ladio ya mboka, boyokani kati na ba ladio mpe baimboka, kotelemisa mpe kopesa lisungi na masanga ma bayoki.
•
•
•
•
•
��
f
��
Bokeseni bwa mwasi na mobali na Kongo Demokratiki
Nganga mayele wa bokokani bwa mwasi na mobali o ekolo canada (Coopération canadienne)
Misala mipesami zambi ya bokeseni bwa nzoto kati na mwasi mpe mobali babengi yango misala mya bokeseni o nzela ya nzoto. Yango nde bato bakobotamaka na yango mpe bakoki kobongola te.
Misala misusu mipesameli na bato o bisika bavandi na bolandaka bongo mimeseno, bizalela, bonkoko, biyamba mpe lolenge ya koyekola mambi ma bomoto na nzela ya bonkoko. Misala mina babengi myango, misala mya bokokani bwa mwasi to mpe mobali, misala mya mboka.
Boyebi bokeseni bwa ndenge ya kobikela ya mwasi na mobali bozali na litomba linene mpo na botomboli nkita ya mboka. Kobongola bizalela bya kotikela mwasi misala misusu mya libota te ye moko asala, ekosenge boyokani bwa solo mpe bokokani kati ya mwasi mpe mobali na bobongisaka bongo lolenge ya kobikela la bato. Kokotisa mbongwana ena ezali likambo lya bato banso, mwasi mpe mobali.
Bokeseni bwa mwasi na mobali ekoki kosila se soki:Bokokani bokoti o maye matali makoki ma bato: bokaboli lolenge loko,Bokokani o maye matali lifuta mpe bomoi bwa bango: makoki ndenge yoko o maye matali bomoto, Bokokani o nkonzo: kozala na makoki ma bosali likambo songolo,Bokokani o ngambo ya kozwa bokonzi, likoki mpe kotambwisa bomoi, koyeba nini ebongi,Basi basengeli kokamata likambo o motema, komiyeba malamu mpe kozwa likoki lya kosalela bozwi mpe nkita.
••
••
•
© T
etsh
im
Marie-Antoinette Saya
��
f
��
Lilako lya inei
Mbano ya bokokani bwa mawasi na mobali o maye matali masolo ma kotombola mboka
IFASIC, Institut Facultaire des Sciences de l’Information et de la Communication
Botomboli mboka ezali likambo linene. Mwasi mpe mobali basengeli kozala esika yoko mpo na mosala mpo te manso esalema malamu mpe etambola bisika binso.
Mpo na bokotisi mambi ma bokokani bwa mwasi mpe mobali na bosololi mpe bopesi sango, esengeli kopesa maloba na basi. Yango ekosalisa na bango te baloba polele mpe balimbola maye bazali komono mpo na botomboli mboka.
Basi mpe babali basengeli kozala bato ba mpiko, baye bati maboko o mosala mpe basalela lifuta lya mosala.
Esengeli mpe lisusu kokotisa kpokoso mpe mikakatano mya basi o kati ya masolo: bozangi boyekoli, bobola, bozangi bwa mabele, bozangi kosangana na babali o mambi ma politiki, boluki bango na makasi, botau bwa nzoto o bokono bwa sida, mikakatano mpe mpasi na maye matali bokolongonu bwa nzoto, kufa o eleko ya kobota to mpe liboso to sima ya kobota, kobota na bisika bibongisami te, kozanga kopesa maloba o masolo, kozanga ya mosolo, kpokoso mpe o bozwi
biloko bikoki mpe bongo na bongo.
Ladio ya mboka ezali nzela ya lisolo mpo na baimboka banso. Bakoki kokela, kolimbola, kosalisa mpe kopesa masolo mpo na botomboli mboka. Ladio ezali ya solo nzela elamu ya mboka mpo na mboka, ekolingisa na baimboka te basolola.
© T
etsh
im
© D
imit
ra
Espérance Bayedila
�6 ��
f
Kosakola to kosolola likambo ya bokokani bwa mwasi mpe mobali mpo na botomboli mboka
Moyangeli wa Linaka Dimitra (FAO)
Lolenge ya bokokani bwa mwasi mpe mobali ezali kotala misala basi mpe babali bakosalaka mpe lolenge ya kokamba yango kati na bango mpe masanga. Ekotala lisus misala mya basi mpe babali mpe ndenge ya kokonzama kati na bango moko mpe na lisanga. Bokokani bwa mwasi mpe mobali bolakisi polele te misala misusu mya bango miyekolami, mipesami na baimboka, mizali miye babotami na myango te. Na yango, mbongwana ekoki kokoto, kasi na bondimaka bongo bokeseni kati na mwasi mpe mobali mpo na botomboli mosala mwa bato banso o bisika binso o kati ya mboka.
Bokokani bwa mwasi mpe mobali botelemi likolo lya likonzi lya makoki ma bato, epai wapi moto nyoso asengeli kopono nini alingi kosala na bomoi bwa ye na esika te nyonso esalema na bolandaka bongo nzoto ya mwasi to mobali. Wana nde litomba lya kopesa sango mpe kosolola.
Mpo na bosololi mambi ma bokokani bwa mwasi mpe mobali, bapanzi sango basengeli:
Kopesa masolo maponomi mpe matali bomoi bwa basi mpe babali o mboka ya bango;Kotombola bizalela bilamu mpe ndenge na ndenge bya mwasi mpe mobali tango nakokesenisa to kolakisa biye bizali bibe;Kotala na bokengi kpokoso ya bokokani bwa mwasi mpe mobali na boyanolaka na mituna miye: nani, nini, ntango nini, wapi, ndenge nini;Kosalela likoki lya bokokani bwa mwasi na mobali o bomoi bwa baimboka ya mokolo na mokolo mpo na kolimbolela bango sikisiki mpe koboya bisimbisi bibe. Bokokani bwa mwasi mpe mobali bokobandaka o ndako, o mabota.Kopesa likoki lya boyebi nzebi mpo na kosalisa te mbongwana ikoto o lolenge ya kobika ya bato;Kosalela sango na bopesaka bongo maloba na banso, basi mpe babali.
•
•
•
•
•
•
© D
imit
ra
Eliane Najros
�6 ��
f
Lilako lya inei
Bokotisi bwa bokokani bwa mwasi na mobali na mosala mwa bobongisi mpe botomboli mboka
Molendisi wa bokokani bwa mwasi na mobali o PNUD (Programme des Nations Unies pour le Développement)
Sima ya matata maye mazalaki o ekolo, bitumba mpe bokabwani na bowelani, elaka eye ya kokoto na eteni ya sika ya lolenge ya kokamba mboka ezali elamu mingi mpo na bokotisi mbongwana o mambi matali bokokani bwa basi na babali.
Na Kongo Demokratiki, litomba lizali lya bokotisi o bikela, mibeko mitali bokokani bwa mwasi na mobali. Likambo lina lindimamaki na buku ya mibeko ya ekolo Kongo mpe lisengeli kokotisa mbongwana na makambo ma bazuzi, na bobimisi mpe bopesi bilei bikoki mpe bibongi mpe na kati ya makambo masusu ma ntina matali bokambemi bwa ekolo. Mpo na maye matali likoki lya boponomi, esengeli mobeko moko mwa boponomi esalema mpo na kotelemisa bokokani bwa basi mpe babali na kati ya ba parti politiki, manaka ma politiki matali bokokani mpe bozali bwa basi o maponomi mpe bozali bwa basi o maponomi.
Mpo na kobunda na bobola, esengeli kokolisa likambo lya bokotisi bokokani bwa mwasi na mobali na eleko bakolengeleke myango mya misala mpo na botomboli bomoi ya baimboka, misala mikobota mpe mikopesa mosolo. Esengeli kokolisa esika ya basi bazala na eleko mikano mikozwamaka mpe mikamatamaka, bakamata mpe maloba na sika te baminona te bazangi makoki.
© D
imit
ra
Augusta Angelucci
�� ��
f
Mpasi ya likoki ya bozangi sango mpe kosolola ona baimboka
Atali mosala mwa bopesi sango mpe mwa bosololi o FAO-RDC
Bosololi ezali lolenge ya bokaboli lisolo na maloba to te. Ekosalisa kokabola sango. Likambo ya kopesa sango ezali na litomba linene mpo na misala mya botomboli mboka. Ekosalisa na bato te basimba o maboko maye matali bomoi mpe lobiko ya bango mpe lolenge bakotambola mpo te babikela malamu. Nyonso ekosalema se soki sango ya solo, eye euti epai ya baimboka mpe basengeli na yango mpo na botomboli bizweli bya bango to mpe mosolo, bobongisi lolenge ya kosala mosala ya bato banso.
Kozanga sango ekobota makama maye:
Bozangi bwa makambo ma sika ma nzebiBozangi bwa bokutani mpe boyokani bwa bato (mpasi mpo na bokaboli sango)Bozangi koyeba sango etali bisaleli bya mosala to mpe mambi mabimi sika
Ndakisa ya bozangi kozwa sango: lo-lenge maponomi malekaki, kpokoso ya kobunda na makono, kozanga koyeba talo ya biloko o zando, bobuki mpe bo-bebisi biloko na nko, matungisi ma bato ba leta o mboka ntango na etumbu.
Likambo lyango likoki kobongo na boponoko ba nzela ilamu ya bopesi mpe bopanzi sango, yango nde (ladio, zulunale, eteni ya lokasa ya sango, kotala bilibi o etando eke, bopesi
•
•
•
© D
imit
ra
Phuna Mabika Dakeini
�� ��
Lilako lya inei
masolo o mboka,...). Boponomi bona bosalemi na bokebi o makambo maye, ndakisa, motango mwa bato ba mboka, ndenge ya lifuta lya bango to mpe ndenge bakozwaka mosolo, nivo ya boyekoli, bisaleli bya mosala bazali na byango, biloko bimononi (mateya ona baimboka, bokolongonu bwa nzoto, bokaboli sango, sango ya mboka) mpe bongo na bongo.
O kati ya mboka, o mokili mwa afrika, epai wapi bato bakosalela mingi se ma-loba, ladio ezali nzela elamu mpe ekasi ya kopesa sango mpe ya kosolola. Ladio
ezali esaleli oyo ekotombola boyokani kati ya mboka. Ladio mpe ekobimisa mboka mobimba na bokangemi, na bozangaka boyebi sango
izali koleka epai esusu, na bozangi boyebi mpe na bosangisi mboka na matuka masusu ma leta.
© T
etsh
im
�0 ��
f
Litomba lya botelemisi lisanga linene ya ba ladio ya mboka mpe masanga ma bayoki mpo na bokolisi bozwi bwa sango mpe bosololi o ngambo ya baimboka
Eteni ya mosala mwa boluki mpe mwa bopalinginyi, o FAO
Na bozangi bwa bisaleli bya bopanzi sango mpe na kpokoso ya bosaleli byango (zulunale, botali na bilibi na etando eke), ladio ezali na eleko eye esaleli yoko ekolingisa na bato banso bayoka sango, ekofungola mayele ma bato na boyokaka mateya mpe masolo, ekoteya mpe kosangisa baimboka.
Makambo ma ntina matelemisi ba ladio: bosaleli nkota ya mboka, bopesi sango mpe masolo matali kpokoso mpe mposa ya baimboka mpe mimeseno na bizalela ya bango, kopesa sango to mpe mateya ndenge na ndenge etali makambo ma botomboli mboka, nkita, bomoi mpe lobiko la bato mpe bizalela bya bango.
Na bozangi bomoko mpe kobikela moto na moto na lolenge na ye mpe bosali mosala na bokabwani, ladio ya mboka ikokoka kosala mosala te o boso ya kpokoso mingi na ngambo ya leta, ya politiki, ya mosolo, ya basali baye bayekoli mosala malamu te, mpe bongo na bongo. Mpo te iumela mpe isala mosala mwa yango malamu,
ladio ya mboka isengeli kosangana na lisanga linene ya ba ladio ya mboka. Wana nde ikozwa esika elamu ya bokutani, bosali misala miike mpe ya bokaboli maye mazali koleka o mosala mpo na bolamu ya baimboka.
© D
imit
ra
Jaime Almenara Merel
�0 ��
f
Lilako lya inei
Ba ladio ya mboka mpe masanga ma bayoki o Sudi-Kivu
Samwaki, Sauti ya Mwanamke Kijijini
Bozangi bwa bisaleli ya bopanzi sango mpe ya bosololi o mboka ezali kopesa kpokoso mingi mpo na kotombola bomoto mpe bomoi bwa mwasi mpe mboka mobimba. O Kati ya misala mya bopanzi sango, lokola basi ba mboka bazali mingi te, yango esengeli kosala mosala ya kopesa mposa na basi de bakoto baike o mosala o ngambo ya ladio.
Lisanga lyoko ya bayoki to mpe ya ladio ezali lingomba to lisanga lya bato baponi bango moko, kasi na makasi te te batanga, bayoka, bakabola oyo bayoki mpe balekisa yango na bikela. Ezali na mosala mwa kolendisa makanisi ma bato mpe mosala malamu ya kotombola bomoi bwa bato mpe ya mboka. Ekosalisa bato te bayeba nini elobami mpe batia na bikela eloko esengami.
Na bokendeke bongo o masanga ma bayoki, mwasi wa mboka o Sudi-Kivu akoloba polele misala azali kosala mpe kpokoso azwi, akoyebisa eloko nini ye alingi mpo te bomoi bwa ye mpe ya mboka ebongwama, akolobela babali na basi ba mboka ya ye te basangana mpo te bokono bwa sida bopalangana o mboka te.
O Sudi-Kivu, basi ba mboka mpe bapanzi sango ba ladio ya mboka, na botalaka bongo maye masalemi na masanga ma bayoki ba ladio, babimisi ndenge ya botomboli mboka na bosanganaka lisanga mpo na bokaboli mpe bopesi sango ya bango. O suka ya sanza ya mibale o mobu mwa 2007, masanga libwa ya bayoki etiamaki na lisungi ya Dimitra mpe lisalisi lya Fondation Roi Baundouin.
© D
imit
ra
Adeline Nsimire
�� ��
f
Ndenge ebele ya kopesa sango mpe ya bosololii o ba ladio
Eteni ya mosala mwa boluki mpe mwa bopalinginyi, wa FAO
Lolenge ya kosolola mpe kopesa sango o ba ladio izali ebele: lisolo ya bato banso, masano to mpe masapo, masese, boluki mpe boyebi, masolo ma bolakisi, masolo mpe mituna, sango eke mpe ya ntina, masolo mike-mike, mituna mpe biyano, mituna, mpe bongo na bongo.
Boluki, lolenge ya kozwa sango mpe ya kosalela yango na mopanzi sango esengi ete ye ayeba malamu penza lolenge nini alingi kopesa sango ya ye mpe wapi epai akozwa mambi asengeli na mango. Lolenge ya bozwi sango yango iye: kopesa sango ya ma-kambo amoni, kotuna mituna na mobyangemi mpe kozwa biyano bya ye, koluka koyeba likambo libombami. Lolenge ya bosali mosala ezali ndenge yoko te, bokeseni bozali. Botuni mituna mpe bozwi biyano ezali lolenge loye bapanzi sango basalelaka mingi.
© T
etsh
im
Jaime Almenara Merel
�� ��
f
Lilako lya inei
Bowzi sango o misala mya bilanga o bingumba mpe zinga-zinga - Mosala mwa HUP-FAO
Molakisi wa mosala HUP etali milona mpe fololo mpo na bobongisi bisika mpe moyangeli wa etuka o mosala mwa botomboli milona mya makembisi o engumba mpe zinga-zinga ya engumba Lubumbashi
Mosala mwa HUP ya FAO mozali mwa bobimisi ebele mpe milona ndenge na ndenge mya makembisi mpo na botondisi zando na milona mpe fololo ina, ekosalisa mpe na bokeli misala mpe bozwi mosolo mpo na baloni baye bakobimisaka mingi o engumba mpe zinga-zinga ya yango, mingi penza, bato bakeleli lokola basi mpe bilenge. Ntina na yango ezali mpo na botomboli mpe bobateli mambi ma bilei mpo te bizanga te.
HUP ezali kosala misala mingi mpo na basi, bango bazali na litomba linene na misala mya milona mpe fololo. Akolengeleke mpo na bango mateya mpe akopesaka sango etali mambi mingi (lolenge ya kokamba mpe kosalela mai, kosalela bankisi bakotiaka o milona, ndenge ya kobongisa biloko baloni, boteki, bozwi to bodefi mosolo mpe bozongisi yango, ndenge ya kopesa bilei o libota, mpe bongo na bongo. HUP etongi mpe bityelo o esika bilanga bya baimboka bizali. Likambo ntina ezali ya
© B
MH
-L’s
hi/H
UP
FAO
/RD
C
Grégoire Mutshail
�� ��
kopesa lokumu, kolendisa mosala mwa basi mpe kotombola bomoi bwa libota mobimba mpe ya mwasi ye mei.
Na maye matali lolenge ya kosolola, ladio ezali nzela yoko ekasi mpe ekosalisa te bato ebele bayoka yango, mingi penza baloni bilanga baye bazwami mosika mpe o bisika bikangemi. Masolo ya telefone ya maboko ezali mpe na mbano mingi, ekopesa sango na lobangu mpe ekosalisa basi bayeba mpe bapesana sango ya motuya mwa biloko bakoteke o ba zando mpe lolenge mbongwana ikokoto.
© D
imit
ra
�� ��
f
Lilako lya inei
Lilako lya inei - Bokokani bwa mwasi na mobali mpe bosololi mpo na botomboli mpe bopesi sango elamu
Bitinda/Mikano
Mpo ya bailikita:
Kotelemisa esika ya masolo kati na ba ladio ya mboka mpe mangomba ma basi ba mboka mpo na kosalisa na baimboka te bango mpe bazala na likoki ya kopesa ya maloba mpe makanis;Kobimisa mpe kokolisa bokoti bwa basi o masolo: kopesa na mwasi makoki mpe bisaleli bya bolobi (ladio, masanga ma bayoki) kokotisa ye na eleko ya bolengeli masolo mpe mateya, kobongisa manaka ya eleko ya kolekisa masolo o ba ladio mpo na bolingisi na basi balanda, kotombola misala mya mboka; Kolekisa masolo o ba ladio o nkota ya mboka; Kosunga te likambo lya bokokani bwa mwasi na mobali likota na kati ya manaka mpe masolo ma ba ladio ya mboka mpe kosalisa te masanga ma bayoki iye ikambemi na basi izwa mpe esika mpo na misala mya yango.
O epai ya misala mya leta mpe mya bato bango mei:
Kotosa mpe kosala te mibeko mikoto na bikela: botikeli bapanzi sango likoki lya boyebisi makambo polele, makoki ma bato, makoki ma basi, bozwi na bolembu sango basengeli na yango;Kosalisa botelemisi bwa ladio ya mboka mpe masanga ma bayoki; Kopesa mosolo na ba ladio ya mboka mpo te isala misala malamu.
O ngambo ya bapesi mosolo:
Kosalisa mpo ya botomboli misala mya bato babyangemi: kotelemisa esika yoko ya bokutani mpo na masolo kati na ba ladio ya mboka mpe mangomba ma basi ba mboka, kosalisa te masanga ya bayoki iteleme na mboka mpe basi bazala o kati ya yango;Kopesa lisungi ya bisaleli bya mosala, ba masini o ba ladio ya mboka mpe masanga ma bayoki o mboka.
•
•
••
•
••
•
•
�6 ����
© D
imit
ra
�6 ����
Maloba ma bosukisi mpe ma ntina ma likindo
Masolo ma ntina ma bosukisi ma likindo malakisami boye:
Bozwi mateya mpe bopesi sango: Kolimbola polele mibeko, kosolola mambi matali makoki ma bato mpo na bokono bwa sida, kotelemisa politiki ya ekolo na maye matali bozwi sango mpe bosololi o kati ya mboka;
Bokolisi nzebi mpe makoki: ma masanga ma baimboka mpe mambi ma bazuzi, kosolola na nkota ya mboka, kopesa mateya na basi ba mboka mpe kolakisa bango kotanga mpe kokoma.
Bosololi na bakonzi mpo na boluki biyano na mikakatano mya baimboka mpe kotelemisa lisanga linene mpo na kosangisa bato bisika binso: o mboka, o etuka mpe o ekolo mpe o molongo na botalaka ngambo inso) epai ya bayangeli mpe baye basibi mosala (bakonzi ba mboka, ba biyamba, ba ONG ipesaka lisungi, leta, bapesi mosolo, mpe bongo na bongo) mpo ya kosalisa mosala.
Bomikotisi bwa baimboka: kokolisa bosangani, boyokani kati na masolo, botelemisi masanga manene, bokutani mpo na bokaboli masolo, kokolisi boyokani kati na mangomba.
Bolekisi mayebi: kolimbola mpe kopesa mateya malobami o likindo o bisika binso, bipai binso mpe bopesi sango ya sika.
Bokotisi bokokani bwa mwasi na mobali na kati ya makambo manso matali botomboli mboka.
•
•
•
•
•
•
��
Nzela ya bokutani
REFED, Lisanga linene lya basi mpo na botomboli mboka o etuka ya Katanga
Bernadette Kapend
491, rue Likasi, bâtiment Labo Médical
Lubumbashi, RDC
tél : +243 81 8152771
e-mail : [email protected] et [email protected]
CONAFED, Lisanga linene lya mangomba ma basi o ekolo Kongo Demokratiki
Elise Muhimuzi
rue Mutombo Katshi 7
Commune ya Gombe
b.p. 5.744
Kinshasa, RDC
tél : +243 99 9918406
e-mail : [email protected]
Mpo ya bokutani bonso mpe bopesani sango to masolo masusu,
luka lisanga lya Dimitra na engumba ya Bruxelles o ekolo Belgika:
Dimitra
Eliane Najros, Coordinatrice
21, rue Bréderode
b-1000 Bruxelles
Belgique
tél : +32 2 5490310
fax : +32 2 5490314
e-mail : [email protected]
© G
ulda
ElM
agam
bo
© D
imit
ra
© G
ulda
ElM
agam
bo
LikindoMpo ya bokolisi nzebi o mambi ma bokomi mpe bopanzi sango, bokokani
kati ya mwasi na mobali ona bai mangomba ma bai-mboka mpe ba-radio ya baimboka o etuka ya Katanga, o ekolo Kongo Demokratiki
lubumbashi, mwa 4 kino mwa 8 sanza ya motoba mobu 2007
Lyoko likindo likolo lya mateya ma « Bokolisi nzebi o mambi ma
kopanzasangompebokokanibwamwasinamobalionabaimangomba
mpe ladio ya baimboka » lisalemaki o engumba Lubumbashi, o etuka
ya Katanga, o ekolo Kongo Demokratiki, uto mwa 4 kino mwa 8, sanza
ya motoba, mobu 2007.
Likindo lina lilengelemaki na libandisi lya lisanga lya basi (refed) ya
etuka ya Katanga, mpe lizwaki masungi ma dimitra/fao, Fondation
Roi Baudouin, Bobembani bwa ekolo Canada, gtz etali bokolongonu
bwa nzoto, Bobembani bwa Misala mya ekolo Belgika (ctb), mpe
mangomba ma molongo matali lobiko la bato (unfpa) mpe Ntombwa
(pnud) bakisa mpe conafed, lisanga linene liye lisangisi mangomba
ma basi ya ekolo ya Kongo Demokratiki.
Buku eye ekomami na lisalisi mpe lisungi ya Bobembani bwa ekolo
canada mpe Fondation Roi Baudouin.
Le Projet Dimitra bénéficie du soutien financier du Service Public Fédéral des Affaires Etrangères, Commerce Extérieur et Coopération au Développement (DGCD) Belgique et de la
Fondation Roi Baudouin.
lingala